Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 73:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 73:6
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.


Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso.


Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, tika ete ekota kati na ye lokola mayi, mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta !


Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.


Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.


Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.


baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.


Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.


Obetisi ngai motema makasi, Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ; obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo, mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.


biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale,


Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango lokola masanga ya vino oyo baningisi te, oyo babongoli na mbeki mosusu te, mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te. Boye, elengi na yango ebongwana te mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.


Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo ! Tala ndenge amatisaka mapeka ! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.


Nalatisaki yo babiju, mayaka na maboko mpe na kingo.


Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.


Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela basakoli ya lokuta oyo babungisaka bato na ngai nzela : « Soki bapesi bango eloko ya kolia, basakolaka kimia ; soki bapesi bango te eloko ya kolia, basakolaka bitumba.


Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ