5 Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka ; babelaka te bokono oyo ezwaka bato.
ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.
Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
Tala ndenge bato mabe bazalaka : tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata.
Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.