Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 73:3 - Mokanda na Bomoi

3 pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 73:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.


Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.


Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi ? Mpo na nini bakomaka mibange mpe babakisaka nguya na bango ?


Nzambe apesaka bango kimia, kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.


Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ; atiolaka banguna na ye nyonso.


Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te ;


Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye ; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.


Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;


Kolulaka te bato oyo basalaka mabe mpe kolukaka te kozala elongo na bango,


Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.


Na mikolo ya pamba ya bomoi na ngai, namonaki makambo oyo nyonso : Moto ya sembo akufi mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe awumeli na bomoi mpo na mabe na ye.


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ