2 Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya,
Davidi alobaki na Salomo : « Mwana na ngai, nazwaki likanisi ya kotonga Ndako mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai ;
Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti.
Boni, nazali kolela epai ya moto ? Ndenge nini nalemba te kokanga motema ?
Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !
Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo, napengwaka te.
Nzokande tango bango babelaki, ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei, nazalaki kobondela mpo na bango.
Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.
Obomaka bato oyo balobaka lokuta. Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.
Soki nalobi : « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo, kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.