18 Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.
tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu tango anjelu ya Yawe akobengana bango.
Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.
ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.
« Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili ; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
Bakozwa etumbu ya libebi ya seko na seko, mosika ya bozalisami ya Nkolo mpe ya nguya ya nkembo na Ye