Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 72:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bongo bakotosa Yo tango nyonso moyi ekongala, tango nyonso sanza ekongenga, na bikeke nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 72:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye : moto ya esengo.


Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.


Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye ; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Kasi bokonzi, nguya mpe lokumu ya bikolo oyo ezali na se ya moyi ekopesama na ekolo ya basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi ya ekolo yango ekowumela seko na seko, mpe bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili bakosalela mpe bakotosa ekolo yango.


tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ