Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »
Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »
Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi ; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.