Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.
Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’ Mwasi akozongisa : ‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »