Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 72:12 - Mokanda na Bomoi

12 Pamba te akokangola moto akelela oyo azali koganga mpo na kosenga lisungi, mpe mobola oyo azangi mosungi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 72:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. »


pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.


Kasi bato oyo bazali konyokwama, akangolaka bango na nzela ya minyoko na bango, afungolaka bango matoyi na nzela ya pasi.


Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,


Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.


Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili


Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.


Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.


Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, kasi na pamba : mayi ezali te ; balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ; Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.


« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama


Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.


Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ