Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 72:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga bakomemela ye mpako ya mokonzi, bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 72:10
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani.


Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu oyo Kombo ya Yawe epesaki Salomo, ayaki mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ;


Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Batikala lisusu te komema biloko ebele ya solo kitoko lokola oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo.


ayaki na Yelusalemi elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema.


Kati na bato oyo bazalaki kokende kotala Salomo, moko na moko azalaki komemela ye lokola kado : biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso.


Mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kokende na Tarsisi, elongo na basali ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga wuta na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « Paoni. »


Mokonzi Kizerisesi akataki mpako mpo na bato ya mokili na ye ya bokonzi kino na bituka oyo ezalaki pene ya ebale.


Mokonzi asepeli na kitoko na yo ; lokola azali nkolo na yo, gumbama liboso na ye.


Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo ; zala makasi. Nzambe, osaleli biso penza makambo.


Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemi epai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,


Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso !


akolemba te mpe akotika te kino tango akotia bosembo na mokili. Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye.


pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.


nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, › mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. › Zongisa bana na Ngai ya mibali wuta na mikili ya mosika, mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,


Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »


Bikolo ekotambola na pole na yo, mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.


Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.


Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo.


Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ