Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 72:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Salomo. Oh Nzambe, pesa na mokonzi mayele na Yo ; mpe na mwana ya mokonzi, bosembo na Yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 72:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai : ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,


Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, mpe azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.


Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo ; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.


Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »


Pesa ngai bwanya mpe boyebi mpo ete nakoka kotambolisa bato oyo. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.


Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye : Molimo ya bwanya mpe ya mayele, Molimo ya toli mpe ya nguya, Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ;


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ