Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi ; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.
Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.