Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 71:22 - Mokanda na Bomoi

22 Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo ; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 71:22
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Ngai, Mosantu ya Isalaele !


Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.


Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika, nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi.


Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.


Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.


bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.


Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.


bazalaki kozongela komeka Nzambe, koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.


Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.


Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.


Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !


Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !


Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »


pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, Kushi mpe Seba na esika na yo.


Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga, akonetolama na nzela ya bosembo na Ye, mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Ye na nzela ya boyengebene na Ye.


Mawa na bato oyo balobaka : « Tika ete Nzambe asala noki, tika ete asala na lombangu mosala na Ye mpo ete tomona yango ! Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama mpo ete tokoka koyeba yango ! »


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo.


Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.


Pamba te nazali koloba na bino solo : Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ