Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 71:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nzambe, bosembo na Yo ekenda kino na likolo, pamba te osalaka makambo minene. Oh Nzambe, nani akokani na Yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 71:19
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;


Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.


Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »


Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.


Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.


Tika ete Yawe Nzambe oyo asalaka Ye moko bikamwa, Nzambe ya Isalaele, apambolama !


Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.


Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?


Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.


Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba, yango wana azalaka te na likambo ya koloba kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.


Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?


« Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » elobi Ye oyo azali Mosantu ?


Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga, akonetolama na nzela ya bosembo na Ye, mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Ye na nzela ya boyengebene na Ye.


« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.


Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo ? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.


pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; Kombo na Ye ezali Bule.


— Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ