17 Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ; mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti : — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso
Nakangamaka na mibeko na Yo, pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.
Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo ? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.
Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka ! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.
Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ; wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.
Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.
Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.