Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
Bokumisa mingongo ya bayembi, na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ; kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola misala ya bosembo ya Yawe, misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.