Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 71:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kasi ngai, nakozala na elikya tango nyonso mpe nakokoba kokumisa Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 71:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.


Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.


Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.


Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo ; Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai. Nakokumisa Yo tango nyonso.


Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka ; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya :


Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ; yango wana nakotia motema epai na Ye. »


Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye !


Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe !


Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,


Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,


Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango.


Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ