Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 71:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe, ozali ebombamelo na ngai ; kondima te ete nayoka soni !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 71:1
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezekiasi atiaki motema na ye epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi moko te akokanaki na ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda, ezala liboso to sima na ye.


Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango, pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba. Yawe ayanolaki bango, pamba te batielaki Ye motema.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.


Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !


Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango.


Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.


Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.


kolanda ndenge ekomama : « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato ; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »


Pamba te Makomi eloba : « Tala, napona libanga moko ya motuya oyo nazali kotia kati na Siona lokola libanga ya songe ya ndako ; moto nyonso oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ