1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe.
Yawe, zongisela ngai eyano noki ! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.
Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa.
Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo. Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.
Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te ! Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.