Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yawe, telema na kanda na Yo, telemela kotomboka ya banguna na ngai. Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 7:7
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.


Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai ! Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai, kota likambo na ngai.


Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe.


Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo ; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.


Nasali mabe ata moko te ; kasi bango bazali kopota mbangu, bazali komibongisa. Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.


Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ