Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 7:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 7:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.


atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?


Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai : « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke ? »


Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.


Bazali lokola nkosi oyo etondi na posa makasi ya kokanga nyama, lokola nkosi ya kanda makasi kati na ebombamelo na yango.


Banguna na ngai bazingeli ngai lokola lisanga ya bangombe ya mibali, bazingeli ngai lokola banyama mabe oyo ezalaka na Bashani ;


Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo ; kondima te ete nayoka soni ! Bikisa ngai na bosembo na Yo !


Kasi awa ngai nakomi na pasi, bango bazali kosepela mpe kosangana ; wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana mpo na kotonga ngai, bazali kolemba te kofinga ngai.


Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.


Oh Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai ; batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Nakangaki motema kino na tongo ; kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.


Mpo na Gadi, alobaki : « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene ! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.


Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ