Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 7:16
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.


Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.


Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, bato oyo basalaka mabe, mpe ba-oyo balonaka minyoko, babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ;


Tika ete bato mabe bakangama na mitambo na bango moko, mpe ete ngai naleka na kimia !


tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango !


Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai, mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.


Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.


Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.


Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta asukaka kaka bongo, mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.


Moto oyo atimolaka libulu akweyaka ye moko kati na yango ; mpe moto oyo atindikaka libanga, libanga yango ekozongela kaka ye moko.


Moto oyo atimoli libulu akoki kokweya kati na yango ; mpe moto oyo abuki mir ya lopango, nyoka ekoki koswa ye.


Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.


Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ