14 Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.
Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.
Pamba te moto nyonso oyo azalaka na makanisi mabe kati na ye abotaka kaka pasi ; mabe oyo ekolaka kati na ye ememelaka ye moko libebi. »
Mabongisi ya mitema na bino ezali kaka lokola matiti ya kokawuka mpe soki ekokisami, ezalaka kaka lokola matiti ya kokawuka, pema na bino moko ekozikisa bino lokola moto.
Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.
Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu ; mpe lisumu ememaka na kufa.