Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 7:13 - Mokanda na Bomoi

13 Soki alembisi kanda na Ye te, akopelisa minu ya mopanga na Ye, akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 7:13
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.


Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.


Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai ; bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela.


Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.


Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo ; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.


Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe, mosika ya makita ya bato ya misala mabe.


Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.


Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye ; lokola monguna, asemboli loboko na Ye mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso ; mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.


Tango makonga ya mike etambolaka lokola mikalikali mpe makonga ebetaka lokola bakake, moyi mpe sanza etelemaka kuna na likolo.


Obimaka mpo na kokangola bato na Yo mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo. Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe, osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.


Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.


tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.


Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »


Solo, Nzambe azali sembo : akozongisa pasi lokola etumbu epai ya banyokoli na bino ;


Mpo ete basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli na Yo, mpe opesi bango makila mpo ete bamela ndenge ekoki mpo na bango. »


Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ