Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 7:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nzambe azali Mosambisi ya sembo, asilikaka mikolo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 7:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe.


Otikaki kanda na Yo nyonso ya makasi mpe okitisaki motema na Yo.


Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.


Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani, nyoka oyo ekimaka, na Leviatani, nyoka ya somo, na nzela ya mopanga na Ye ya minu, mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; akoboma elima ya ebale monene.


Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.


Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te !


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa : nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.


Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,


tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ