Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 69:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, tika ete ba-oyo batiaka elikya kati na Yo basila lokumu te likolo na ngai ! Nzambe ya Isalaele, tika ete bato oyo balukaka Yo bayokisama soni te likolo na ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 69:7
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okomisi biso lisapo kati na bikolo, mpe bato bakomi koningisa mito na bango mpo na biso.


boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te, lokola asosolaka mozindo ya mitema ?


Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !


Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.


Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ