Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 69:35 - Mokanda na Bomoi

35 Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 69:35
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango etia makelele ; tika ete zamba mpe nyonso oyo ezali kati na yango esepela !


Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi mpo na libela, ozali Nzambe seko na seko.


Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.


Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !


Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe ! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela !


bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo !


Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.


Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »


Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.


Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›


Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te ; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.


Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.


Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ