32 Yango nde ekosepelisa Yawe, koleka ngombe oyo ezali na maseke mpe na makolo ekabwana.
Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.
Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo.
Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.
Nakopambola Yawe tango nyonso, nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
Boni, okanisi penza ete ngai naliaka misuni ya bangombe to namelaka makila ya bantaba ?
Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.
Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo.