30 Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ; kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai mpe opesaki ngai elonga.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !
Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.