Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 69:21 - Mokanda na Bomoi

21 Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te ; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te ; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 69:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli : « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »


Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.


Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »


Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango.


Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela.


bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te.


Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki : — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye.


Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi


Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ