Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »
Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai, mabunga na ngai ekomi konyokola ngai, mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ; ezali ebele koleka suki ya moto na ngai, mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?