Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 69:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te, mozindo emela lisusu ngai te, mpe libulu ekangamela ngai te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 69:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango ; mpe mpo na bolingo monene na Ye, abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.


Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo.


Basinga ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo.


Yawe, balola miso na Yo epai na ngai mpe salela ngai ngolu, pamba te nazali kaka ngai moko, mpe nazali monyokolami.


Natambolaka na bomoi ya bosembo ; kangola ngai mpe salela ngai ngolu.


Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.


Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai, balangwi masanga bayembaka kombo na ngai kati na banzembo na bango.


Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.


Solo, okoyokela biso lisusu mawa, matambe na Yo ekonyata masumu na biso, mpe okobwaka mabunga na biso nyonso kati na bozindo ya ebale monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ