Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 69:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yawe, nabondeli Yo ! Nzambe, tango ekoki, tango ya kotalisa ngai bolingo monene na Yo ! Yanola ngai na nzela ya boyengebene mpe lobiko na Yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 69:14
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo.


Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.


Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya


Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.


Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi, ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.


Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.


Bimisa ngai na potopoto, sala ete nazinda lisusu te, nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai mpe nabima na mayi ya mozindo !


Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.


Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu.


Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.


Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ