Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »
Tango mokonzi amonaki Ester, mwasi na ye, atelemi kati na lopango, asalelaki ye ngolu. Mokonzi asembolaki epai ya Ester lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, oyo ezalaki na loboko na ye. Ester apusanaki mpe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi.
Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na tango ya malamu, nakoyanola yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ;
pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
Tuna basali na yo, bakoyebisa yo. Boye, tika ete bilenge mibali na ngai bazwa ngolu na miso na yo, lokola tokomi epai na yo na mokolo ya feti ! Nabondeli yo, pesa na basali na yo mpe na Davidi, mwana na yo ya mobali, eloko nyonso oyo okokoka kozwa mpo na bango. › »