Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:9 - Mokanda na Bomoi

9 mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ; liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:9
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki : — Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka. Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te.


Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.


Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.


nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.


Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, mapata esopaki mayi.


Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ