Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
pamba te ekomama : « Sepela, mwasi ekomba, yo oyo obotaka te ! Sepela makasi mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebele koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. »