Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.
Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »
Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
Mongongo ya moto moko ezali kobelela : « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.