Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:32 - Mokanda na Bomoi

32 Bazwi bakobimela na Ejipito ; bato ya Kushi bakoya na lombangu, bakotombola maboko epai ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:32
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe !


Kombo ya Yawe ekokende sango kati na Siona, mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi


Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.


Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma ; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango.


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ