Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:30 - Mokanda na Bomoi

30 Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemi epai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:30
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mpe mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge. Bakonzi nyonso ya Arabi mpe bayangeli ya bituka bazalaki komema wolo mpe palata epai ya Salomo.


Moko na moko azalaki komemela ye lokola kado biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso.


Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.


Ngai, nazali moto ya kimia ; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.


Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga bakomemela ye mpako ya mokonzi, bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.


Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.


Mpakasa ekokufa nzela moko na bango, mpe bangombe ya mibali elongo na bilenge na yango. Mabele na yango ekolangwa na makila mpe putulu na yango ekozipama na mafuta.


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’


Boye bato ebele mpe bikolo ya nguya bakoya na Yelusalemi mpo na koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bakobondela Ye. »


Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe ;


Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ