Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:29 - Mokanda na Bomoi

29 Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo ; zala makasi. Nzambe, osaleli biso penza makambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:29
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Batikala lisusu te komema biloko ebele ya solo kitoko lokola oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo.


Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule :


Bato ebele bamemaki na Yelusalemi makabo mpo na Yawe mpe bakado ya motuya mpo na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda. Wuta tango wana, lokumu ya Ezekiasi emataki makasi na miso ya bikolo nyonso.


Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na ngomba moke epai wapi bakunda ya bakitani ya Davidi ezali. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bapesaki ye lokumu tango akufaki, mpe Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.


Mokonzi asepeli na kitoko na yo ; lokola azali nkolo na yo, gumbama liboso na ye.


Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.


Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ