Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. »
Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki.
Ezalaki bango nde bakatisaki mayi ya Yordani, na sanza ya liboso, tango mayi ya ebale etondaki makasi na bangambo nyonso, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mabwaku, ezala na ngambo ya este to ya weste.
Mpo na sanza ya libwa : lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
Motema likunya ya Efrayimi ekosila, mpe banguna ya Yuda bakobebisama ; Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te.
Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !
Yawe abetaki bana ya Benjame liboso ya Isalaele, mpe, na mokolo wana, bana ya Isalaele babomaki mibali nkoto tuku mibale na nkama moko kati na libota ya Benjame, ba-oyo bayebi kobunda na mopanga.
Saulo azongisaki : — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ?