Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:20 - Mokanda na Bomoi

20 Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo ! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.


Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.


Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.


Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda.


Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi.


mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


Bongo namonaki anjelu moko kokita wuta na Lola ; asimbaki na loboko na ye fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi mpe monyololo moko ya monene.


Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ