Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:17 - Mokanda na Bomoi

17 mpo na nini ozali kosala zuwa, ngomba ya basonge ebele, ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ? Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.


Yawe afungolaki Lola mpe akitaki ; mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.


Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.


Nzambe alobaki na ye : — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.


Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.


Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela.


Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.


Oh Yawe, otombokelaki nde bibale ? Osopelaki nde miluka kanda na Yo ? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu ?


Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?


Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.


Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,


Bazalaki minkoko nkama mibale ya basoda oyo babundaka na likolo ya bampunda. Yango nde motango na bango oyo nayokaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ