Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.
Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama.
Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi.
Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »