Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 68:13 - Mokanda na Bomoi

13 bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu, mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 68:13
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Isakari azali ane ya makasi oyo elali kati na mapango mibale.


Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.


Abimisaki Isalaele, bato na Ye, elongo na palata mpe wolo ; mpe moko te atiaki tembe kati na mabota na bango.


Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga.


Kokaba te bomoi ya ebenga na Yo na monoko ya nyama oyo ezali na nzala, kobosana te mpo na libela bomoi ya babola oyo bazali bato na Yo !


Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi tango abundisaki Ejipito. Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :


mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.


Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.


Kabola bomengo ya bitumba yango kati na basoda oyo bakendeki na bitumba mpe bato ya lisanga ya Isalaele oyo batikalaki.


Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.


Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.


Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Nzokande, bakonzi wana mitano bakimaki mpe bakendeki kobombama kati na lidusu ya mabanga, na Makeda.


Mpo na nini avandi kati na lopango ? Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele ? Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa tango pamba na kokanisa.


Bakonzi oyo bazali banguna bayaki mpe babundisaki biso ; bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, pene ya mayi ya Megido, kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ