Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki wolo na maboko ya bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda mpe bamemaki yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele liboso ya Yawe.
Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.
Bakonzi oyo bazali banguna bayaki mpe babundisaki biso ; bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, pene ya mayi ya Megido, kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.
« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »
Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba ? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko.