yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
Opambolaka mabele, ofulukisaka yango, otondisaka yango na bozwi. Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi, obongiselaka bato ble, pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.
Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.