Banzembo 68:1 - Mokanda na Bomoi1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.
Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango ; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »