Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 67:4 - Mokanda na Bomoi

4 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 67:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.


Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »


Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.


Boloba kati na mabota : « Yawe azali Mokonzi ! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »


liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo.


Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te ! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.


Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai na miso ya bato ya bikolo ebele, mokambi mpe motambolisi ya bato.


Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.


Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.


Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.


pamba te ekomama : « Sepela, mwasi ekomba, yo oyo obotaka te ! Sepela makasi mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebele koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. »


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ