Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 66:9 - Mokanda na Bomoi

9 Asalaka ete totangama kati na bato ya bomoi. Abatelaki makolo na biso mpo ete tokweya te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 66:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.


Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.


Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe.


Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo.


Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.


Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.


Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.


Soki nalobi : « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.


Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ